17 Nganga-Nzambe akotoka mayi ya bule, na mbeki basala na mabele batumba mpe akozwa putulu ya mabele ya Mongombo mpo na kotia yango kati na mayi yango.
Wuta na mosika, tango kaka bamonaki ye, bakokaki te koyeba ye lisusu ; boye, babandaki wana kolela makasi, bapasolaki banzambala na bango mpe bamibwakelaki putulu na mito.
— Okosala na bronze sani moko monene mpo na komipetola mpe evandelo na yango ; okotia yango na kati-kati ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe etumbelo, mpe okotia mayi kati na yango.
Oh Yawe, Elikya ya Isalaele, bato nyonso oyo basundolaka Yo bakufaka soni, bato oyo bapesaka yo mokongo bakufaka, pamba te basundoli Yawe, Etima ya mayi na bomoi.
Nganga-Nzambe akotia mwasi ya kotelema liboso ya Yawe, akofungola ye suki mpe akotia na maboko na ye likabo ya zuwa, wana ye moko Nganga-Nzambe akobatela na maboko na ye mayi ya bololo oyo ememaka elakeli mabe.
Balobaki bongo mpo na kotiela Yesu motambo mpe koluka nzela ya kofunda Ye. Kasi Yesu agunzamaki ; mpe na nzela ya mosapi na Ye, abandaki kokoma na mabele.