Biteni yango ekozala ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali lokola mobeko ya libela na libela. Pamba te ezali makabo ya bana ya Isalaele mpo na Yawe, makabo oyo ekowuta na mbeka na bango ya boyokani.
Bokolia yango na Esika ya bule, pamba te yango nde epesameli yo mpe bana mibali na yo kati na makabo bazikisa na moto mpo na Yawe, ndenge kaka atindaki ngai.