Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 4:49 - Mokanda na Bomoi

49 Moyize apesaki na Molevi moko na moko mosala mpe mokumba, kolanda mitindo ya Yawe. Batangaki bango kolanda mitindo oyo Yawe apesaki na Moyize.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 4:49
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzokande batangaki te nzela moko na mabota mosusu motango ya bato ya libota ya Levi.


Bana ya Isalaele basalaki makambo oyo nyonso, ndenge kaka Yawe atindaki na nzela ya Moyize.


Kasi batangaki Balevi te elongo na bato mosusu ya Isalaele, ndenge kaka Yawe atindaki na nzela ya Moyize.


Bongo Moyize apesaki mbongo yango ya lisiko epai ya Aron mpe epai ya bana na ye ya mibali, ndenge kaka Yawe atindaki ye.


Soki balingi kolongola molako mpo na kokende na esika mosusu, bana mibali ya Keati bakoya komema soki kaka Aron mpe bana na ye ya mibali basilisi kofinika Esika ya bule mpe bisalelo na yango nyonso ; kasi basengeli te kosimba Esika ya bule, noki te bakokufa. Yango wana nde misala ya bana mibali ya Keati kati na Ndako ya kapo ya Bokutani.


Tala misala mpe mokumba ya bituka ya bana mibali ya Gerishoni :


Tala biteni ya Ndako ya kapo ya Bokutani, oyo bakobanda komema : mabaya ya Mongombo, balate na yango, makonzi mpe makolo na yango,


makonzi oyo ezingeli lopango, makolo na yango, bapike na yango, basinga na yango, bisalelo na yango nyonso mpe biloko nyonso oyo esungaka mpo na kokangisa yango. Bokobenga moto moko na moko na kombo mpe bokopesa ye biloko oyo akobanda komema.


Wana nde motango ya bato nyonso oyo batangamaki kati na bituka ya bato ya Keati, ba-oyo bazalaki kosala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. Moyize mpe Aron batangaki motango yango kolanda mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize.


Wana nde motango ya bato ya Gerishoni oyo batangamaki mpe bazalaki kosala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. Moyize mpe Aron batangaki bango kolanda mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize.


Wana nde motango ya bato oyo batangamaki kati na bituka ya bato ya Merari. Moyize mpe Aron batangaki bango kolanda mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ