45 Wana nde motango ya bato oyo batangamaki kati na bituka ya bato ya Merari. Moyize mpe Aron batangaki bango kolanda mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize.
Okotanga motango ya bato ya Merari, etuka moko na moko mpe libota moko na moko ;
batangamaki kolanda etuka moko na moko mpe libota moko na moko ; motango na bango ezalaki nkoto misato na nkama mibale.
Moyize, Aron mpe bakambi ya Isalaele batangaki motango ya Balevi nyonso, kolanda etuka moko na moko mpe libota moko na moko :