41 Wana nde motango ya bato ya Gerishoni oyo batangamaki mpe bazalaki kosala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. Moyize mpe Aron batangaki bango kolanda mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize.
Boye, Moyize atangaki bango ndenge Yawe atindaki ye.
batangamaki kolanda etuka moko na moko mpe libota moko na moko ; motango na bango ezalaki nkoto mibale na nkama motoba na tuku misato.
Batangaki motango ya bato ya Merari kolanda etuka moko na moko mpe libota moko na moko :
Moyize apesaki na Molevi moko na moko mosala mpe mokumba, kolanda mitindo ya Yawe. Batangaki bango kolanda mitindo oyo Yawe apesaki na Moyize.