Bapesaki na Banganga-Nzambe oyo bakombo na bango ekomamaki kolanda mabota na bango ya botata mpe na Balevi oyo bazalaki na mibu ya mbotama kobanda mibu tuku mibale mpe komata, kolanda mikumba mpe masanga na bango ;
Wana nde motango ya bato nyonso oyo batangamaki kati na bituka ya bato ya Keati, ba-oyo bazalaki kosala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. Moyize mpe Aron batangaki motango yango kolanda mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize.
mibali nyonso oyo bazalaki na mibu ya mbotama kobanda tuku misato kino tuku mitano, ba-oyo bazalaki na makoki ya kosala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani,