Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 4:33 - Mokanda na Bomoi

33 Wana nde misala ya bituka ya bato ya Merari. Itamari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron, nde akokamba misala na bango nyonso kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 4:33
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala motuya ya biloko oyo basalelaki Mongombo oyo, kati na yango, ezalaki na buku ya Boyokani, ndenge kaka Moyize atindaki. Balevi batongaki yango na bokambami ya Itamari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron.


moko akokanga ndeko na ye ya mobali kati na ndako ya tata na bango mpe akoloba : « Yo oyo ozali na kazaka, okozala mokonzi na biso, kamata mokumba ya libebi oyo na maboko ! »


Wana nde misala ya bituka ya bato ya Gerishoni kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. Itamari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron, nde akokamba misala na bango.


makonzi oyo ezingeli lopango, makolo na yango, bapike na yango, basinga na yango, bisalelo na yango nyonso mpe biloko nyonso oyo esungaka mpo na kokangisa yango. Bokobenga moto moko na moko na kombo mpe bokopesa ye biloko oyo akobanda komema.


Moyize, Aron mpe bakambi ya lisanga ya Isalaele batangaki motango ya bato ya Keati, kolanda etuka moko na moko mpe libota moko na moko.


Apesaki bashar minei mpe bangombe mwambe epai ya bana mibali ya Merari kolanda bosenga ya mosala na bango na bokambami ya Itamari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron.


Jozue alobaki na Banganga-Nzambe : — Bomema Sanduku ya Boyokani mpe botambola liboso ya bato. Batombolaki yango mpe batambolaki liboso ya bato.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ