Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 4:24 - Mokanda na Bomoi

24 Tala misala mpe mokumba ya bituka ya bana mibali ya Gerishoni :

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 4:24
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo bakabolaki Mongombo na biteni-biteni. Bakitani ya Gerishoni mpe ya Merari nde bamemaki yango mpe bakendeki.


Na Ndako ya kapo ya Bokutani, bakitani ya Gerishoni bazalaki na mokumba ya kobatela Mongombo mpe ndako ya kapo, bizipelo na yango, rido ya ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani,


barido ya lopango, rido ya ekuke ya lopango oyo ezingela Mongombo mpe etumbelo, basinga mpe biloko nyonso oyo bazalaki kosalela na basinga wana.


Soki balingi kolongola molako mpo na kokende na esika mosusu, bana mibali ya Keati bakoya komema soki kaka Aron mpe bana na ye ya mibali basilisi kofinika Esika ya bule mpe bisalelo na yango nyonso ; kasi basengeli te kosimba Esika ya bule, noki te bakokufa. Yango wana nde misala ya bana mibali ya Keati kati na Ndako ya kapo ya Bokutani.


Tala makambo oyo bosengeli kosala mpo na bango mpo ete bakufa te tango bakopusana pene ya biloko oyo eleki bule : yo, Aron mpe bana na ye ya mibali, bokokota mpe bopesa na moko na moko kati na bango mosala oyo asengeli kosala to eloko oyo asengeli komema.


Okotanga mibali nyonso oyo bazali na mibu ya mbotama kobanda tuku misato kino na tuku mitano, ba-oyo bakoki kosala mosala songolo kati na Ndako ya kapo ya Bokutani.


bakobanda komema batapi ya Mongombo mpe Ndako ya kapo ya Bokutani elongo na elamba na yango, elamba ya makasi basala na poso ya nyama ya ebale mpo na kozipa na likolo, rido ya ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani,


Mosala nyonso ya bato ya Gerishoni ekokambama na Aron mpe bana na ye ya mibali : ezala mpo na komema biloko to mpo na kosala mosala ; bokoyebisa bango mosala nyonso oyo bango basengeli kosala.


mibali nyonso oyo bazalaki na mibu ya mbotama kobanda tuku misato kino tuku mitano, ba-oyo bazalaki na makoki ya kosala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani,


Moyize apesaki na Molevi moko na moko mosala mpe mokumba, kolanda mitindo ya Yawe. Batangaki bango kolanda mitindo oyo Yawe apesaki na Moyize.


Apesaki bashar mibale mpe bangombe minei epai ya bana mibali ya Gerishoni kolanda bosenga ya mosala na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ