Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 4:20 - Mokanda na Bomoi

20 Basengeli te kokota bango moko mpo na kotala Esika ya bule, ata mpo na tango moke ; soki te bakokufa. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 4:20
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe alobaki na Moyize : — Kita mpe kebisa bato ete baleka bandelo te mpo na koluka komona Ngai Yawe, noki te mingi kati na bango bakokufa.


Boye moto ebimaki longwa liboso ya Yawe mpe etumbaki bango nyonso ; bakufaki na mbala moko.


Akotia malasi na moto liboso ya Yawe mpo ete milinga na yango ezipa esika ya bolimbisi oyo ezali likolo ya Sanduku ya Boyokani mpo ete akufa te.


Tango nyonso Mongombo ekolongwa na esika moko mpo na kokende na esika mosusu, Balevi nde bakolongola yango ; mpe tango ekotelema, bango mpe kaka nde bakotelemisa yango. Moto mosusu oyo akopusana pembeni na yango asengeli kokufa.


Bakosunga yo mpe bakosala misala nyonso ya Ndako ya kapo kasi bakopusana te pene ya bisalelo ya Esika ya bule mpe ya etumbelo, noki te bango to bino bokokufa.


Soki balingi kolongola molako mpo na kokende na esika mosusu, bana mibali ya Keati bakoya komema soki kaka Aron mpe bana na ye ya mibali basilisi kofinika Esika ya bule mpe bisalelo na yango nyonso ; kasi basengeli te kosimba Esika ya bule, noki te bakokufa. Yango wana nde misala ya bana mibali ya Keati kati na Ndako ya kapo ya Bokutani.


Tala makambo oyo bosengeli kosala mpo na bango mpo ete bakufa te tango bakopusana pene ya biloko oyo eleki bule : yo, Aron mpe bana na ye ya mibali, bokokota mpe bopesa na moko na moko kati na bango mosala oyo asengeli kosala to eloko oyo asengeli komema.


Bongo Tempelo ya Nzambe, oyo ezali kati na Lola efungwamaki, mpe Sanduku ya Boyokani na Ye emonanaki kuna kati na Tempelo ya Nzambe. Mpe mikalikali epelaki, mingongo mpe lokito ya bakake eyokanaki, mabele eninganaki, mpe mvula monene ya mabanga enokaki.


Kasi Nzambe abomaki bato ya Beti-Shemeshi mpo ete batalaki Sanduku ya Yawe : kati na bato nkoto tuku mitano, abomaki tuku sambo. Bato ya Beti-Shemeshi basalaki matanga mpo ete Yawe apesaki bango etumbu ya makasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ