Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 4:18 - Mokanda na Bomoi

18 « Bolongola te kati na Balevi lisanga ya mabota ya bato ya Keati.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 4:18
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe alobaki na Moyize : — Kita mpe kebisa bato ete baleka bandelo te mpo na koluka komona Ngai Yawe, noki te mingi kati na bango bakokufa.


Moto nyonso oyo akomekola mafuta yango mpe akosopa yango na nzoto ya moto oyo abulisami te, basengeli kolongola ye kati na bato na ye. »


Moto nyonso oyo akomekola yango mpo na kosepela na solo na yango ya kitoko, basengeli kolongola ye kati na bato na ye.


Bakomema basi na yo nyonso mpe bana na yo nyonso epai ya bato ya Babiloni ; mpe yo moko okobika te na maboko na bango, mokonzi ya Babiloni akokanga yo mpe akobebisa engumba oyo na moto.


efungolaki monoko na yango mpe emelaki bango elongo na mabota na bango, bato ya Kore nyonso elongo na bozwi na bango nyonso.


« Bokende mosika ya lisanga oyo mpo ete nasilisa bango kaka na mbala moko. » Mpe bakweyaki bilongi kino na mabele.


Bino nde bokozala na mokumba ya kobatela Esika ya bule mpe etumbelo, mpo ete kanda makasi ekweya lisusu likolo ya Isalaele te.


Tala bakitani oyo babimelaki na Keati : bituka ya bato ya Amirami, ya Yitseari, ya Ebron mpe ya Uzieli. Bango nde bazalaki bato ya bituka ya Keati.


Tala makambo oyo bosengeli kosala mpo na bango mpo ete bakufa te tango bakopusana pene ya biloko oyo eleki bule : yo, Aron mpe bana na ye ya mibali, bokokota mpe bopesa na moko na moko kati na bango mosala oyo asengeli kosala to eloko oyo asengeli komema.


Kasi Nzambe abomaki bato ya Beti-Shemeshi mpo ete batalaki Sanduku ya Yawe : kati na bato nkoto tuku mitano, abomaki tuku sambo. Bato ya Beti-Shemeshi basalaki matanga mpo ete Yawe apesaki bango etumbu ya makasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ