Mitango 4:15 - Mokanda na Bomoi15 Soki balingi kolongola molako mpo na kokende na esika mosusu, bana mibali ya Keati bakoya komema soki kaka Aron mpe bana na ye ya mibali basilisi kofinika Esika ya bule mpe bisalelo na yango nyonso ; kasi basengeli te kosimba Esika ya bule, noki te bakokufa. Yango wana nde misala ya bana mibali ya Keati kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Moyize, Aron mpe bana mibali ya Aron batongaki molako na bango na ngambo ya este ya Mongombo, epai wapi moyi ebimaka, etalana na Ndako ya kapo ya Bokutani. Bazalaki na mokumba ya kobatela Esika ya bule mpo na bolamu ya bana ya Isalaele. Moto mosusu oyo akopusana pene ya Esika ya bule, basengeli koboma ye.
bongo bakotia na likolo na yango biloko nyonso oyo basalaka na yango na etumbelo : basani oyo batumbaka na yango ansa, bakanya, bapawu, basani ya minene mpe biloko nyonso oyo basalaka na yango na etumbelo ; bongo bakotanda na likolo ya biloko oyo nyonso, liputa ya makasi basala na poso ya nyama ya ebale, mpe bakotia balate ya etumbelo oyo ekosunga mpo na komema.