10 Bakosangisa na liboke moko, ezala elamba yango ya langi ya ble mpe biloko na yango nyonso, kati na liputa ya makasi basala na poso ya nyama ya ebale, mpe bakotia yango na likolo ya tsipoyi.
Okosala na wolo ya peto etelemiselo ya minda ; okosala yango na wolo oyo batuti na nzela ya marto. Evandelo na yango, likonzi na yango, bakeni na yango, bambuma mpe bafololo na yango, nyonso ekozala ekangana lokola eloko moko.
Bakotanda liputa ya langi ya ble na likolo ya etumbelo ya wolo mpe bakofinika bulangeti basala na poso ya nyama ya ebale ; bongo bakotia balate na yango oyo ekosunga mpo na komema.
Bakozwa biloko nyonso oyo basalaka na yango kati na Esika ya bule, bakotia yango kati na liputa ya langi ya ble, bakofinika yango bulangeti basala na poso ya nyama ya ebale ; bongo bakotia yango na tsipoyi.
Na likolo na yango, bakotia bulangeti oyo esalema na poso ya nyama ya ebale, bakofinika liputa ya langi ya ble mpe bakotia mabaya ya komemela Sanduku ya Litatoli.
Bakokamata liputa ya langi ya ble mpe bakofinika na yango etelemiselo ya minda elongo na minda na yango, biloko oyo balongolelaka makala na moto, basani mpo na putulu ya moto mpe basani ya mafuta, oyo basalelaka mosala na mesa.