Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 36:2 - Mokanda na Bomoi

2 Balobaki : « Tango Yawe apesaki mitindo epai ya nkolo na ngai ete apesa mokili lokola libula epai ya bana ya Isalaele na kobeta zeke, apesaki yo mpe mitindo ya kopesa libula ya Tselofikadi, ndeko na biso ya mobali, epai ya bana na ye ya basi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 36:2
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kati na mokili mobimba, ezalaki te na basi kitoko koleka bana basi ya Yobo. Tata na bango apesaki bango libula ndenge moko na bandeko na bango ya mibali.


Bokokabola na kobeta zeke mabele ya mokili oyo ezali libula na bino : libota oyo eleki monene ekozwa mpe eteni ya mabele oyo eleki monene ; libota ya moke, ekozwa mpe eteni ya mabele ya moke. Libota moko na moko ekozwa eteni na yango ya mabele na esika oyo zeke ekokweya. Bokokabola yango kolanda masanga ya bituka na bino.


Boye, soki esalemi ete bana basi yango babali mibali oyo bawuti na mabota mosusu ya Isalaele, libula na bango ekolongwa na libula ya batata na biso, mpe bakobakisa yango na libula ya libota ya mibali oyo bakobala bango. Bongo, libula oyo epesamelaki biso ekokoma moke.


Mpo na bavandi nyonso ya etuka ya bangomba, wuta na Libani kino na Misirefoti-Mayimi, bato nyonso ya Sidoni, nakobengana bango Ngai moko liboso ya Isalaele. Sala keba ete opesa mokili yango lokola libula epai ya Isalaele, ndenge kaka natindaki yo ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ