Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 36:10 - Mokanda na Bomoi

10 Boye, bana basi ya Tselofikadi basalaki ndenge kaka Yawe atindaki na nzela ya Moyize.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 36:10
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kati na mokili ya Yuda, loboko ya Nzambe ezalaki kosala na nguya makasi epai ya bato, mpo na kopesa bango bomoko na molimo mpo na kotosa mitindo ya mokonzi mpe ya bakalaka na ye, kolandisama na Liloba na Yawe.


Bato nyonso ya Isalaele basalaki ndenge kaka Yawe atindaki Moyize mpe Aron.


Bongo Moyize alobaki na bana ya Isalaele ; mpe babimisaki na libanda ya molako moto oyo alakelaki Nzambe mabe mpe babambaki ye mabanga. Bana ya Isalaele basalaki kolanda ndenge Yawe atindaki Moyize.


Bana ya Isalaele basalaki makambo oyo nyonso, ndenge kaka Yawe atindaki na nzela ya Moyize.


Bana basi ya Tselofikadi : Mala, Tiritsa, Ogila, Milika mpe Noa ; babalanaki na bandeko na bango, na ngambo ya libota ya tata na bango.


Libula moko te ekoki kolongwa na libota moko mpo na kokende na libota mosusu, pamba te libota moko na moko ya Isalaele esengeli kobatela mabele oyo esili kozwa lokola libula. › »


bolakisa bango kotosa makambo nyonso oyo natindaki bino. Boyeba malamu ete nazali elongo na bino mikolo nyonso kino na suka ya mokili.


Bayaki liboso ya Nganga-Nzambe Eleazari, liboso ya Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe liboso ya bakambi. Balobaki : « Yawe apesaki mitindo epai ya Moyize ete apesa biso eteni ya mabele kati ya bandeko na biso ya mibali. » Boye, Jozue apesaki bango libula elongo na bandeko mibali ya tata na bango, kolanda mitindo na Yawe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ