Mpo na bingumba oyo bokopesa na Balevi wuta na libula ya mabele ya bana ya Isalaele, bosengeli kozwa yango kolanda bozwi ya libota moko na moko : libota oyo ezali na bingumba ebele ekopesa mpe bingumba ebele ; libota oyo ezali na bingumba moke ekopesa mpe bingumba moke. »
Tango Yawe, Nzambe na bino, akobebisa bikolo oyo Ye akopesa bino mokili na bango, tango bokobengana bango mpe bokovanda na bamboka mpe na bandako na bango ;
Tala makambo oyo ekoki kosala ete moto oyo abomi moninga na ye akoka kokima kuna mpo na kobikisa bomoi na ye : ezali tango abomi moninga na ye na nko te, moto oyo ayinaki te liboso.