6 Bokobongisa mpo na Balevi bingumba motoba ya kokimela mpo ete moto oyo abomi moninga na nko te akoka kokima kuna ; bokobakisa bingumba mosusu tuku minei na mibale.
Nzokande, soki azalaki na likanisi ya koboma te, kasi Nzambe atiki ete yango esalema na nzela ya maboko na ye, moto wana akokima na esika oyo Ngai Yawe nakopona.
Ekozala lokola ndako ya matiti oyo epesaka pio na tango ya molunge ya moyi makasi, ekimelo mpe ebombamelo na tango ya mopepe makasi mpe na tango ya mvula.
Na libanda ya engumba, bokozwa etando ya bametele pene nkoto moko na ngambo ya este, nkoto moko na ngambo ya weste, nkoto moko na ngambo ya nor mpe nkoto moko na ngambo ya sude ; mpe engumba ekozala na kati-kati. Yango nde ekozala mabele na bango ya zingazinga.
Epai ya bakitani ya Gerishoni kati na bituka ya bakitani ya Levi, bapesaki bingumba oyo : Kati na ndambo ya libota ya Manase : kati na Bashani, Golani lokola engumba ya kokimela mpo na moto oyo atangami mobomi, mpe Beyeshitira, elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba mibale.
Boye, kolanda mitindo ya Yawe, bana ya Isalaele balongolaki kati na libula na bango ndambo ya bingumba elongo na mabele na yango, mpe bapesaki yango epai ya bakitani ya Levi.
Kati na libota ya Nefitali : Kedeshi, kati na mokili ya Galile, lokola engumba ya kokimela mpo na moto oyo atangami mobomi ; Amoti-Dori mpe Karitani, elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba misato.