Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 35:34 - Mokanda na Bomoi

34 Bokokomisa mbindo te mokili epai wapi bokovanda, mokili epai wapi Ngai mpe nakovanda ; pamba te nazali Yawe, navandaka kati na bana ya Isalaele. › »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 35:34
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpe nakoya kovanda kati na bato ya Isalaele mpe nakosundola te bato na Ngai, Isalaele.


« Ezali Esika na ngai ya bopemi mpo na libela ; nakovanda awa, pamba te nasepelaki na yango.


Tika ete, wuta na Siona, Yawe apambolama, Ye oyo avandaka na Yelusalemi ! Bokumisa Yawe !


Bakosalela Ngai Ndako ya bule, mpe nakovanda kati na bango.


Pamba te, tala liloba oyo Ye-Oyo-Aleki-Likolo, Ye oyo akowumela seko na seko mpe azali bule, alobi : « Navandaka na esika oyo eleki likolo mpe ya bule ; kasi navandaka mpe elongo na moto oyo azali na pasi mpe oyo molimo na ye ebukani, mpo na kolendisa lisusu molimo oyo etutami mpe motema oyo ebukani.


« Bobengaka likita te eloko nyonso oyo bato babengaka likita ; bobangaka te oyo bango babangaka, boyokela yango somo ata moke te.


Nakofutisa bango mbala mibale lifuti ya mabe na bango mpe ya masumu na bango, pamba te bakomisi mokili na Ngai mbindo na nzela ya bililingi mpe ya bikeko na bango oyo ezanga bomoi, mpe batondisi libula na Ngai na banzambe na bango ya bikeko mpe ya nkele. »


Mpo ete olobaki : ‘ Mikili oyo mibale, Isalaele mpe Yuda, elongo na bikolo na yango ekokoma ya ngai, mpe nakozwa yango, ’ atako Yawe azalaki kuna ;


Bakovanda lisusu te na mboka na Yawe ; Efrayimi akozonga na Ejipito, mpe bakolia bilei ya mbindo kati na Asiri.


Bayaki lisanga mpo na kotelemela Moyize mpe Aron. Balobaki na bango : — Bino mpe bolekisi ! Lingomba mobimba ezali bule mpe moto nyonso kati na yango azali bule, mpe Yawe azali elongo na bango. Boye, mpo na nini bozali komitia likolo ya lisanga ya Yawe ?


Azala mobali to mwasi, bobengana ye, bobimisa ye libanda ya molako mpo ete bakomisa molako na bango mbindo te, pamba te Ngai nazali kowumela elongo na bango. »


ebembe na ye ekowumela te butu mobimba na nzete wana ; bosengeli kokunda yango kaka na mokolo wana, pamba te moto nyonso oyo badiembiki na nzete azali na se ya bilakeli mabe ya Nzambe. Bosengeli te kokomisa mbindo mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bino lokola libula.


Eh Yawe, ndima kolimbisa masumu ya Isalaele, bato na Yo, oyo osikolaki. Kotangela bango ngambo te ya makila ya moto oyo ayebi likambo te. » Boye, Yawe akolimbisa bango mpo na makila oyo etangaki.


pamba te Yawe, Nzambe na yo, oyo azali kati na yo, azali Nzambe ya zuwa, mpo ete asilikela yo te mpe abebisa yo te na mokili.


Eloko moko te ya mbindo ekokota kuna, mpe moto moko te oyo asalaka makambo ya nkele mpe alobaka lokuta akokota kuna ; kaka ba-oyo bakombo na bango ekomama kati na buku ya bomoi ya Mpate nde bakokota kuna.


Nayokaki mongongo moko ya monene kobima wuta na Kiti ya Bokonzi mpe ezalaki koloba : « Botala, Nzambe atie evandelo na Ye kati na bato mpe akovanda elongo na bango. Bakozala bato na Ye, Ye moko Nzambe akozala elongo na bango mpe akozala Nzambe na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ