Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 35:32 - Mokanda na Bomoi

32 Bokondima mpe kozwa eloko moko te mpo na kopesa ye nzela ya kokima na engumba songolo ya kokimela to ya kozonga kovanda lisusu kati na mokili na ye liboso ya kufa ya mokonzi ya Banganga-Nzambe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 35:32
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato ya Gabaoni bazongiselaki ye : — Mpo na kobongisa makambo na biso elongo na Saulo mpe libota na ye, tozali na posa te ya palata to ya wolo ; tokoki mpe te koboma ata moto moko kati na Isalaele. Davidi atunaki lisusu : — Bolingi ete ngai nasala nini mpo na bino ?


Bokondima kozwa eloko moko te mpo na kosikola bomoi ya mobomi oyo asengeli na kufa ; basengeli kaka koboma ye.


Bokokomisa mbindo te mokili epai wapi bozali. Solo, kosopa makila ekomisaka mokili mbindo ; pamba te soki makila esopani na mokili, ezali kaka na nzela ya makila ya moto oyo asopi yango nde bakoki kokomisa lisusu mokili peto.


Lobiko ekoki kozwama na moto mosusu te, pamba te kombo mosusu ezali te na mokili, oyo epesama na bato, oyo ekoki kobikisa biso.


Nazali kolongola te ngolu ya Nzambe, pamba te soki ezali na nzela ya kotosa Mobeko nde bato bakomaka sembo, wana Klisto akufaki mpo na pamba. »


Kasi tala makambo oyo Makomi eloba : Mokili mobimba ezali na se ya bokonzi ya lisumu mpo ete elaka ya Nzambe ekokisama epai ya bandimi na nzela ya kondima na bango kati na Yesu-Klisto.


Mpe bayembaki nzembo ya sika : « Obongi na kozwa buku mpe kobuka bikangelo na yango, pamba te babomaki Yo ; bongo na nzela ya makila na Yo, osikolaki, mpo na Nzambe, bato ya bikolo nyonso, ya nkota nyonso, ya mikili nyonso mpe ya mabota nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ