Bato ya Gabaoni bazongiselaki ye : — Mpo na kobongisa makambo na biso elongo na Saulo mpe libota na ye, tozali na posa te ya palata to ya wolo ; tokoki mpe te koboma ata moto moko kati na Isalaele. Davidi atunaki lisusu : — Bolingi ete ngai nasala nini mpo na bino ?
Nakopesa yo etumbu oyo ebongi na basi ya ndumba mpe na ba-oyo basopaka makila. Okofuta yango na motuya ya makila na yo, mpo na kanda mpe zuwa ya bolingo na Ngai oyo osambwisi.
Tango nyonso oyo moto akoboma moninga na ye, bakoboma mobomi soki kaka batatoli ebele bafundi, pamba te litatoli ya moto moko ekoki te mpo na kokatela moto etumbu ya kufa.
Bokondima mpe kozwa eloko moko te mpo na kopesa ye nzela ya kokima na engumba songolo ya kokimela to ya kozonga kovanda lisusu kati na mokili na ye liboso ya kufa ya mokonzi ya Banganga-Nzambe.