Balevi batikaki bandako mpe mabele na bango, bakendeki na Yuda mpe na Yelusalemi, pamba te Jeroboami mpe bana na ye ya mibali bapekisaki bango kosala mosala na bango ya bonganga-Nzambe ya Yawe.
Bokotika bametele pene nkama mibale na tuku mitano na molayi, mpe bametele pene nkama mibale na tuku mitano na mokuse mpo na kotonga Esika ya bule ; bongo bokozingela yango na lopango moko ya polele ya bametele pene tuku mibale na mitano.
« Pesa mitindo na bana ya Isalaele ete bapesa na Balevi, wuta na libula oyo bakozwa, bingumba ya kovanda elongo na mabele oyo ezali zingazinga na yango.
Soki moko kati na Balevi alongwe na engumba moko kati na bingumba ya Isalaele epai wapi azalaki kovanda, mpe ayei ndenge motema na ye elingi, na esika oyo Yawe Nzambe akopona ;