Pamba te mobomi asengeli kovanda kati na engumba na ye ya kokimela kino na kufa ya mokonzi ya Banganga-Nzambe. Ezali kaka sima ya kufa na ye nde akoki kozonga na mabele na ye.
Bosala bongo mpo ete makila ya moto oyo ayebi likambo te esopana te kati na mokili na bino oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino lokola libula, soki te bokomema ngambo ya makila.
Soki bongo te, mobukanisi makila akolanda ye na kanda, akokanga ye mpe akoboma ye soki engumba ya kokimela ezali mosika mingi. Nzokande asengelaki kokufa te, pamba te ayinaki te liboso moto oyo asilaki koboma.