Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 35:2 - Mokanda na Bomoi

2 « Pesa mitindo na bana ya Isalaele ete bapesa na Balevi, wuta na libula oyo bakozwa, bingumba ya kovanda elongo na mabele oyo ezali zingazinga na yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 35:2
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi alobaki na lisanga mobimba ya Isalaele : « Soki bomoni yango malamu mpe soki yango ezali mokano na Yawe, Nzambe na biso, tika ete totinda sango epai ya bandeko na biso oyo batikali na bituka nyonso ya Isalaele mpe epai ya Banganga-Nzambe elongo na Balevi, kati na bingumba oyo bango bazali kovanda mpo ete baya kosangana na biso.


Balevi batikaki bandako mpe mabele na bango, bakendeki na Yuda mpe na Yelusalemi, pamba te Jeroboami mpe bana na ye ya mibali bapekisaki bango kosala mosala na bango ya bonganga-Nzambe ya Yawe.


Lokola ndenge ezalaki mpo na Banganga-Nzambe, bakitani ya Aron, oyo bazalaki kovanda na bamboka ya zingazinga ya bingumba na bango, bato baponamaki na bakombo mpo na kokabola biloko epai ya bato nyonso kati na Banganga-Nzambe mpe epai ya Balevi nyonso oyo bakomamaki.


Nayokaki lisusu ete biloko oyo Mibeko ekata mpo na Balevi epesamaka te epai ya Balevi, mpe ete Balevi mpe bayembi oyo bazalaki kosala mosala bazongaki, moto na moto na bilanga na ye.


Boye, eteni ya mabele ya Balevi mpe eteni ya mabele oyo ebongisama mpo na misala ya engumba ekozala na kati-kati ya eteni ya mabele ya mokambi. Eteni ya mabele ya mokambi ekozala na kati-kati ya bandelo ya libota ya Yuda mpe ya libota ya Benjame.


Eteni ya mabele oyo bakopesa Yawe lokola likabo ya motuya ekozala na mondelo ya etuka ya Yuda : longwa na ngambo ya este kino na ngambo ya weste ; ekozala na bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na mokuse, mpe molayi na yango ekozala ndenge moko na biteni ya mabele ya mabota mosusu. Boye, Esika ya bule ekozala na kati-kati na yango.


Yawe alobaki na Moyize kati na etando ya Moabi, pembeni ya Yordani oyo etalani na Jeriko :


Bingumba ekozala mpo na kovanda, mpe mabele ya zingazinga mpo na bibwele na bango, bisalelo na bango mpe banyama na bango nyonso.


Soki moko kati na Balevi alongwe na engumba moko kati na bingumba ya Isalaele epai wapi azalaki kovanda, mpe ayei ndenge motema na ye elingi, na esika oyo Yawe Nzambe akopona ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ