Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 35:12 - Mokanda na Bomoi

12 Bingumba yango ekozala ekimelo mpo na bino liboso ya mobukanisi makila ; na bongo mobomi akokufa te soki asambi nanu te na miso ya lisanga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 35:12
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sik’oyo, libota mobimba etelemeli mwasi mosali na yo, bazali koloba : « Kaba na maboko na biso ye oyo abetaki ndeko na ye ya mobali mpo ete toboma ye mpo na bomoi ya ndeko na ye ya mobali oyo ye abomaki. Na nzela wana, tokolongola mokitani ya libula. » Na bongo, bakoki koboma mwa likala ya moto oyo natikali na yango mpe kozangisa mobali na ngai kombo mpe bakitani kati na mokili.


Kati na bingumba oyo bokopesa, bingumba motoba ekozala ekimelo mpo na bino :


Ezali mobukanisi makila nde akoboma mobomi : akoboma ye tango kaka akokutana na ye.


Tala makambo oyo ekoki kosala ete moto oyo abomi moninga na ye akoka kokima kuna mpo na kobikisa bomoi na ye : ezali tango abomi moninga na ye na nko te, moto oyo ayinaki te liboso.


Soki bongo te, mobukanisi makila akolanda ye na kanda, akokanga ye mpe akoboma ye soki engumba ya kokimela ezali mosika mingi. Nzokande asengelaki kokufa te, pamba te ayinaki te liboso moto oyo asilaki koboma.


« Yebisa bana ya Isalaele ete bapona bingumba ya kokimela, ndenge nayebisaki bino na nzela ya Moyize,


Yango nde ezalaki bingumba oyo eponamaki mpo na moto nyonso ya Isalaele to mpe mpo na mopaya nyonso oyo azali kovanda kati na bango. Moto nyonso oyo akoboma moto na nko te akoki kokimela kuna, mpo ete mobukanisi makila aboma ye te, liboso ete aleka na esambiselo na miso ya lisanga.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ