Nzokande, soki azalaki na likanisi ya koboma te, kasi Nzambe atiki ete yango esalema na nzela ya maboko na ye, moto wana akokima na esika oyo Ngai Yawe nakopona.
Bingumba nyonso motoba ekozala ekimelo mpo na bana ya Isalaele mpe mpo na bapaya oyo bakozala kati na bino. Boye moto nyonso oyo akoboma moto na nko te akoki kokima kuna.
Bokobongisa mpo na Balevi bingumba motoba ya kokimela mpo ete moto oyo abomi moninga na nko te akoka kokima kuna ; bokobakisa bingumba mosusu tuku minei na mibale.
mpo ete moto nyonso oyo akoboma moninga na ye na nko te, na kozanga koyina ye liboso, akoka kokimela na moko kati na bingumba yango mpe akoka kobikisa bomoi na ye.