Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 35:1 - Mokanda na Bomoi

1 Yawe alobaki na Moyize kati na etando ya Moabi, pembeni ya Yordani oyo etalani na Jeriko :

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 35:1
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kedemoshi mpe bamboka na yango ya mike, Mefati mpe bamboka na yango ya mike.


Balevi bazali tango nyonso na makoki ya kosikola bandako na bango, oyo ezali kati na bingumba ya Balevi.


Bana ya Isalaele batambolaki mobembo na bitando ya Moabi mpe batongaki molako na bango pembeni-pembeni ya ebale Yordani, oyo ezalaki etalana na Jeriko.


Moyize elongo na Nganga-Nzambe Eleazari basololaki na bango na etando ya Moabi, na libongo ya Yordani, pene na Jeriko, mpe balobaki :


Yango nde motango ya bana ya Isalaele oyo Moyize elongo na Nganga-Nzambe Eleazari batangaki na bitando ya Moabi, na libongo ya Yordani pene ya Jeriko.


mpe bamemaki bakangami, biloko babotolaki mpe bomengo ya bitumba epai ya Moyize, Nganga-Nzambe Eleazari, mpe lisanga ya Isalaele na molako na bango oyo ezalaki na bitando ya Moabi, na libongo ya Yordani, pene ya Jeriko.


Na bitando ya Moabi, pembeni ya Yordani oyo etalana na Jeriko, Yawe alobaki na Moyize :


Bango wana nde bato oyo Yawe apesaki mokumba ya kokabola mokili ya Kanana kati na bana ya Isalaele.


« Pesa mitindo na bana ya Isalaele ete bapesa na Balevi, wuta na libula oyo bakozwa, bingumba ya kovanda elongo na mabele oyo ezali zingazinga na yango.


Oyo ezali nde mibeko mpe malako oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize epai ya bana ya Isalaele na bitando ya Moabi, oyo etalana na Jeriko, pene ya Yordani.


Boye, bana ya Isalaele bakabolaki mokili, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.


Bakonzi ya mabota ya bakitani ya Levi bayaki epai ya Nganga-Nzambe Eleazari, epai ya Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe epai ya bakonzi ya bituka ya mabota mosusu ya Isalaele,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ