20 mpo na libota ya Simeoni : Samuele, mwana mobali ya Amiwudi ;
Sima, azwaki lisusu zemi mpe abotaki mwana mobali. Alobaki : « Yawe amoni ete nalingami te, mpe apesi ngai lisusu mwana. » Boye apesaki ye kombo « Simeoni. »
Simeoni mpe Levi bazali bandeko, mipanga na bango ezali bibundeli mpo na kotia mobulu.
Libota ya Simeoni ekozwa eteni moko ya mabele : ekobanda longwa na mondelo ya mabele ya libota ya Benjame na ngambo ya este kino na ngambo ya weste ;