2 « Pesa mitindo oyo na bana ya Isalaele : ‹ Tango bokokota na Kanana, tala mokili oyo ekopesamela bino lokola libula, mokili ya Kanana elongo na bandelo na yango oyo :
Mokili ya bato ya Kanana ebandaki wuta na Sidoni, na nzela ya Gerari, kino na Gaza ; mpe na nzela ya Sodome, ya Gomore, ya Adima mpe ya Tseboyimi kino na Lesha.)
Nakopesa lokola libula ya seko na seko, epai na yo mpe epai ya bakitani na yo sima na yo, mokili nyonso ya Kanana epai wapi ozali mopaya. Nakozala Nzambe ya bakitani na yo. › »
Nakotia bandelo na bino kobanda na ebale monene ya barozo kino na ebale monene ya bato ya Filisitia mpe kobanda na esobe ya Sinai kino na ebale Efrate ; pamba te nakopesa bato ya mboka na maboko na bino, bongo bino bokobengana bango liboso na bino.
Namilobelaki : ‹ Esengo nini penza nazalaki na yango ya kokamata bino lokola bana mpe kopesa bino mikili ya kitoko, libula oyo eleki kitoko kati na bikolo ! › Nakanisaki ete bokobenga Ngai ‹ Tata › mpe bokotika te kolanda Ngai.
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : « Tala bandelo oyo bokosalela mpo na kokabola mokili lokola libula epai ya mabota nyonso zomi na mibale ya Isalaele : bakitani ya Jozefi bakozwa biteni mibale.
Bokozwa yango ndenge moko lokola libula, na biteni ekokana ; pamba te nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakopesa yango epai ya bakoko na bino, mpe ekokoma libula na bino.
Wuta na moto moko, asalaki mabota nyonso ya bato, mpo ete bakoka kovanda na mokili mobimba ; mpe akataki tango mpo na moto na moto mpe atiaki bandelo mpo na bisika na bango ya kovanda.
mpo ete ofungola bango miso, olongola bango na molili mpe omema bango na pole ; mpo ete olongola bango na se ya bokonzi ya Satana mpe omema bango epai ya Nzambe, na tina ete bazwa bolimbisi ya masumu mpe libula kati na bato oyo babulisama na nzela ya kondima kati na Ngai. »
Nasambelaka ete angengisa miso ya mitema na bino mpo ete bokoka kososola elikya oyo ezali kati na kobengama na bino, bomengo ya nkembo ya libula na Ye, oyo akopesa bino elongo na basantu,
Tango Jozue akomaki mobange mpe mibu ya bomoi na ye epusanaki makasi, Yawe alobaki na ye : « Okomi mpe mobange makasi, mibu ya bomoi na yo esili kopusana mingi. Kasi mokili oyo bosengeli kobotola ezali nanu monene.
Boye, Yawe apesaki na Isalaele mokili nyonso oyo alakaki kopesa epai ya batata na bango na nzela ya ndayi. Bana ya Isalaele bazwaki yango mpe bakomaki kovanda kuna.