Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 34:19 - Mokanda na Bomoi

19 Tala bakombo na bango : Mpo na libota ya Yuda : Kalebi, mwana mobali ya Yefune ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 34:19
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Azwaki lisusu zemi mpe abotaki mwana mobali. Agangaki : « Na mbala oyo, nakokumisa Yawe. » Yango wana apesaki ye kombo « Yuda. » Mpe akataki kobota.


Wana Isalaele azalaki kowumela na mokili wana, Ribeni ayaki kuna mpe asangisaki nzoto na Bila, makangu ya tata na ye ; mpe Isalaele ayokaki yango. Jakobi azalaki na bana mibali zomi na mibale :


Bana mibali ya Lea : Ribeni, mwana mobali ya liboso ya Jakobi ; Simeoni, Levi, Yuda, Isakari mpe Zabuloni.


Mpo ete balingami na Yo bakangolama, bikisa na nguya ya loboko na Yo ya mobali, mpe yanola biso ! Yanola ngai !


Bongo Kalebi apamelaki bato ete batika makelele liboso ya Moyize, mpe alobaki : — Tokende kobotola mokili yango, pamba te tozali solo na makoki mpo na kosala yango !


Tala bakombo na bango : mpo na libota ya Ribeni : Chamuwa, mwana mobali ya Zakuri ;


mpo na libota ya Yuda : Kalebi, mwana mobali ya Yefune ;


Kasi lokola Kalebi, mosali na Ngai, atambolisamaka na molimo mosusu mpe atamboli na bosembo na miso na Ngai, nakokotisa ye na mokili oyo asilaki kokende, mpe bakitani na ye bakokamata yango lokola libula.


bokokota te na mokili oyo nalakaki na nzela ya ndayi, na kotombola loboko, ete nakokomisa yango mokili na bino, longola kaka Kalebi, mwana mobali ya Yefune, mpe Jozue, mwana mobali ya Nuni.


Kati na bato oyo bakendeki kononga mokili, kaka Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe Kalebi, mwana mobali ya Yefune, nde babikaki.


Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe Kalebi, mwana mobali ya Yefune, oyo bazalaki na molongo ya bato oyo bakendeki kononga mokili bapasolaki bilamba na bango


Pamba te Yawe alobaki na bana ya Isalaele wana ete bakokufa solo na esobe, mpe moko te kati na bango longola kaka Kalebi, mwana mobali ya Yefune, mpe Jozue, mwana mobali ya Nuni.


Bokozwa lisusu mokambi moko kati na libota moko na moko mpo na kokabola mokili.


longola kaka Kalebi, mwana mobali ya Yefune ; ye akomona yango, mpe nakopesa na ye mpe na bakitani na ye, mokili oyo lokolo na ye enyataki, pamba te asalelaki Ngai Yawe na motema na ye mobimba. »


Tala mapomboli oyo alobaki mpo na Yuda : « Oh Yawe, yoka koganga ya Yuda ; zongisa ye epai ya bato na ye ! Tika ete maboko na ye elongisa banzela na ye, mpe tika ete osunga ye liboso ya banguna na ye ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ