Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 34:12 - Mokanda na Bomoi

12 kino na Yordani mpo na kosuka na ebale monene ya Barozo. Ezali ndenge wana nde mokili na bino ekozala elongo na bandelo oyo ezingeli yango. › »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 34:12
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye Loti atalaki mpe amonaki etando nyonso ya Yordani oyo ezalaki na mabele kitoko mpe ekenda kino na Tsoari. Liboso ete Yawe abebisa Sodome mpe Gomore, ezalaki lokola elanga ya Yawe, lokola mokili ya Ejipito.


Bakonzi mitano oyo, basangisaki mampinga na bango ya basoda na lubwaku ya Sidimi oyo ezali ebale monene ya Barozo.


Nakotia bandelo na bino kobanda na ebale monene ya barozo kino na ebale monene ya bato ya Filisitia mpe kobanda na esobe ya Sinai kino na ebale Efrate ; pamba te nakopesa bato ya mboka na maboko na bino, bongo bino bokobengana bango liboso na bino.


Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : « Tala bandelo oyo bokosalela mpo na kokabola mokili lokola libula epai ya mabota nyonso zomi na mibale ya Isalaele : bakitani ya Jozefi bakozwa biteni mibale.


longwa na Shefami, ekokita na Ribila na ngambo ya este ya Ayini mpe ekolanda ebale ya Kinereti, na ngambo na yango ya este,


Moyize apesaki mitindo oyo na bana ya Isalaele : « Tala yango wana, mokili oyo bokokabola na zeke, mokili oyo Yawe apesaki mitindo ete bapesa yango na mabota libwa na ndambo.


Na ngambo ya sude, mondelo na bino ekobanda na esobe ya Tsini mpe ekolanda mondelo ya mokili ya Edomi. Na ngambo ya este, mondelo na bino ya sude ekobanda na ebale monene ya Barozo,


Tango Jozue akomaki mobange mpe mibu ya bomoi na ye epusanaki makasi, Yawe alobaki na ye : « Okomi mpe mobange makasi, mibu ya bomoi na yo esili kopusana mingi. Kasi mokili oyo bosengeli kobotola ezali nanu monene.


Na ngambo ya este, mondelo ezalaki ebale monene ya Barozo kino na suka ya Yordani. Na ngambo ya nor, ezalaki longwa na eteni ya mabele oyo ekota kati na ebale kino na suka ya Yordani.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ