Shimei, moto ya engumba Rama, azalaki mobateli bilanga ya vino ; Zabidi, moto ya engumba Shefami, azalaki mobateli masanga ya vino mpe bilanga ya vino.
Na ngambo ya este, mondelo ekobanda na kati-kati ya Avirani mpe Damasi, ekolekela na Yordani na kati-kati ya mokili ya Galadi mpe Isalaele, na ebale monene ya mungwa kino na Tamari. Yango nde ekozala mondelo ya ngambo ya este.
Na ngambo ya este, mondelo ezalaki ebale monene ya Barozo kino na suka ya Yordani. Na ngambo ya nor, ezalaki longwa na eteni ya mabele oyo ekota kati na ebale kino na suka ya Yordani.