55 Kasi soki bobengani te bavandi ya mokili yango, ba-oyo bakotikala bakokoma lokola banzube na miso na bino mpe lokola basende na mipanzi na bino. Bakomonisa bino pasi na mokili oyo bokovanda.
Botika bango te ete bawumela na mokili na bino, noki te bakotinda bino kosala masumu liboso na Ngai mpe kosalela banzambe na bango ; pamba te ekozala solo motambo mpo na bino. »
Bato ya bikolo ya mayele mabe, oyo bazali lokola basende mpe banzube, bakozingela lisusu bana ya Isalaele te ; boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Nkolo Yawe.
Kutu, mpo ete namitondisa na lofundu te na tina na bimoniseli ya kokamwa oyo nazwaki, batiaki ngai nzube moko kati na nzoto, anjelu ya Satana mpo na konyokola ngai.
Okoboma bato nyonso oyo Yawe, Nzambe na yo, akokaba na maboko na yo ; okoyokela bango mawa te. Kosalela banzambe na bango te mpo ete yango ekozala motambo mpo na yo.
noki te, bakopengwisa bana na yo ya mibali na miso na Ngai mpo ete basalela Ngai lisusu te kasi basalela banzambe mosusu, bongo Yawe akosilikela bino mpe akobebisa yo noki.
Bosala boyokani te elongo na bikolo mosusu oyo etikali kati na bino, bobelela bakombo ya banzambe na yango te to mpe bolapa ndayi na bakombo na yango te. Bomeka kosalela yango te mpe bofukamela yango te.
Sik’oyo, nalobi na bino ete nakobengana bango lisusu te liboso na bino ; bakokoma nzube na mipanzi na bino, mpe banzambe na bango ya bikeko ekokoma mitambo mpo na bino. »