Tango Yawe, Nzambe na yo, akokotisa yo na mokili oyo ozali kokende mpo na kozwa yango lokola libula mpe tango akobengana liboso na yo bikolo ebele—bato ya Iti, ya Girigazi, ya Amori, ya Kanana, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi, bikolo sambo oyo eleki yo na motango ya bato mpe na makasi—
Oh Isalaele, yoka malamu ! Okomi sik’oyo pene ya kokatisa Yordani mpo na kokota mpe kobengana bikolo oyo eleki yo na monene mpe na makasi, bikolo oyo evandaka kati na bingumba minene oyo ezali na bamir batonga makasi mpe ekenda kino na likolo.
Banganga-Nzambe oyo bamemaki Sanduku ya Boyokani ya Yawe bapikamaki na mabele ya kokawuka, na kati-kati ya mayi ya Yordani, wana bana nyonso ya Isalaele bazalaki koleka kino tango ekolo mobimba esilisaki kokatisa na mabele ya kokawuka.