Bokosala sanduku na nzete ya akasia. Molayi na yango ekozala na basantimetele pene nkama moko na tuku mibale na mitano ; mokuse na yango, basantimetele tuku sambo na mitano mpe bosanda na yango, basantimetele tuku sambo na mitano.
Okosala mesa moko na mabaya ya akasia. Molayi na yango ekozala na basantimetele pene nkama moko ; mokuse na yango, basantimetele pene tuku mitano mpe bosanda na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano.
Mpo na yango, nakobebisa bingumba ya Moabi, oyo batonga makasi, na bandelo na yango, kobanda na bingumba oyo ya kitoko : Beti-Yeshimoti, Bala-Meoni, Kiriatayimi ;
Bana ya Isalaele batambolaki mobembo na bitando ya Moabi mpe batongaki molako na bango pembeni-pembeni ya ebale Yordani, oyo ezalaki etalana na Jeriko.