39 Aron azalaki na mibu ya mbotama nkama moko na tuku mibale na misato tango akufaki likolo ya ngomba Ori.
Tango basololaki na Faraon, Moyize azalaki na mibu ya mbotama tuku mwambe ; mpe Aron, tuku mwambe na misato.
Ezali kuna na ngomba Ori nde, kolanda etinda ya Yawe, Nganga-Nzambe Aron amataki mpe akufaki na mokolo ya liboso ya sanza ya mitano, sima na mibu tuku minei wuta bana ya Isalaele babimaki na Ejipito.
Boye, mokonzi ya Aradi, moto ya mboka Kanana, oyo azalaki kovanda na Negevi ya mboka Kanana, ayokaki sango ya koya ya bana ya Isalaele.