3 Bana ya Isalaele balongwaki na Ramisesi na mokolo ya zomi na mitano, na sanza ya liboso ; ezalaki mokolo oyo elandaki mokolo ya Pasika. Babimaki na matata te na miso ya bato nyonso ya Ejipito,
Jozefi avandisaki tata na ye mpe bandeko na ye na Ejipito mpe apesaki bango eteni ya mabele oyo eleki kitoko kati na mokili, na mabele ya Ramisesi, ndenge kaka Faraon atindaki.
Boye batiaki bakonzi ya misala makasi mpo na konyokola bana ya Isalaele na nzela ya misala makasi. Na bongo, batongelaki Faraon bingumba ya Pitomi mpe ya Ramisesi mpo ete ezala bisika ya kobomba biloko.
Bato ya Isalaele balongwaki na Ramisesi mpe bakendeki na Sukoti ; bazalaki mibali nkoto nkama motoba oyo bazalaki kotambola na makolo longola basi mpe bana.
Kasi na mbala oyo, bokobima na kowela te mpe bokokende te lokola bato bazali kokima, pamba te Yawe akotambola liboso na bino mpe Nzambe ya Isalaele akozala Mokengeli na bino na sima.
Moto oyo apasolaka nzela akotambola liboso na bango. Bakolekela na nzela oyo bapasoli, bakolekela na nzela ya ekuke mpe bakobimela na nzela yango. Mokonzi na bango akotambola liboso na bango, Yawe akozala liboso na bango.