Boye, balongwaki na ngomba ya Yawe mpe batambolaki mikolo misato ya mobembo. Sanduku ya Boyokani ya Yawe etambolaki liboso na bango na mobembo oyo ya mikolo misato mpo na kolukela bango esika ya kopema.
Mokolo moko, bato ya bikolo mosusu oyo bazalaki elongo na bana ya Isalaele bakomaki na posa makasi ya kolia misuni. Bongo bana ya Isalaele bakomaki lisusu kolelalela mpe koloba : « Ah, nani penza akoki kopesa biso misuni ya kolia ?