9 Sima na bango komata na lubwaku ya Eshikoli mpe komona mokili yango, balembisaki mitema ya bana ya Isalaele oyo balingaki kokota na mokili oyo Yawe apesaki bango.
Tango bakomaki na lubwaku ya Eshikoli, bakataki etape mobimba ya nzete ya vino oyo ezalaki na liboke ya bambuma ya vino. Lokola ezalaki kilo makasi, bato mibale kati na bango basalelaki banzete mpo na komema yango ; bamemaki lisusu bambuma ya grenade mpe ya figi.
Wuta na tango wana, bakomaki kobenga esika yango « lubwaku ya Eshikoli, » oyo elingi koloba « lubwaku ya liboke ya bambuma ya vino, » mpo na kokanisa liboke ya bambuma ya vino oyo bana ya Isalaele babukaki kuna.
Bayaki kokuta Moyize, Aron mpe lisanga mobimba ya bana ya Isalaele na Kadeshi, kati na esobe ya Parani. Ezalaki kuna nde bapesaki bango elongo na lisanga mobimba sango ya mobembo na bango mpe balakisaki bango bambuma ya mokili yango.