Nzokande, wana Abisalomi azalaki nanu na bomoi, azwaki libanga ya ekaniseli mpe atelemisaki yango na lubwaku ya mokonzi lokola ekaniseli mpo na ye, pamba te amilobelaki : « Nazali te na mwana mobali oyo akoki komema kombo na ngai lokola ekaniseli. » Boye apesaki libanga yango kombo na ye, mpe yango wana babengaka yango kino lelo « Ekaniseli ya Abisalomi. »