Na tango wana, tobotolaki mokili yango. Napesaki epai ya bato ya libota ya Ribeni mpe ya libota ya Gadi mokili oyo ezalaki wuta na Aroeri, kati na lubwaku ya Arinoni kino ndambo ya etuka ya bangomba ya Galadi mpe bingumba na yango.
Libota ya Manase, mwana liboso ya Jozefi, bazwaki eteni ya mabele ; pamba te Makiri, mwana liboso ya Manase, tata ya Galadi, azalaki moto ya bitumba mpe azwaki Galadi mpe Bashani.