Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 32:38 - Mokanda na Bomoi

38 elongo na Nebo mpe Bala-Meoni, kombo oyo babongola na Sibima. Bapesaki bakombo na bingumba oyo batongaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 32:38
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Atimolaki lisusu mabulu ya mayi oyo batimolaki na tango ya tata na ye Abrayami. Mabulu yango ezalaki bato ya Filisitia nde bakundaki yango sima na kufa ya Abrayami, mpe Izaki abengaki yango kaka na bakombo oyo tata na ye Abrayami apesaka yango.


Kati na bakitani ya Nebo : Yeyeli, Matitia, Zabadi, Zebina, Yadayi, Joeli mpe Benaya.


Bato oyo bapotaka mbangu mpo na koluka bolamu epai ya banzambe mosusu bakomona pasi mingi. Nakosopa te mbeka na bango ya makila epai ya banzambe ya lolenge wana mpe nakotanga bakombo na yango te na bibebu na ngai.


Bokosala keba na makambo nyonso oyo nayebisi bino. Bokobelela kombo ya banzambe mosusu te ; bokomeka kutu te kotanga yango na bibebu na bino.


Mpo ete bilanga ya Eshiboni esili kokawuka elongo na bilanga ya vino ya Sibima. Bakambi ya bikolo babukaki-bukaki bitape na yango oyo eleki kitoko, oyo ekenda kino na Yaezeri mpe eleka kino na esobe. Bitape yango ezalaki epanzana makasi mpe ekenda mosika kino na ebale monene.


Tala banzambe ya Babiloni : Beli esili ngala, Nebo ekweyi ; bikeko na yango etiami likolo ya banyama, likolo ya bibwele ! Bikeko oyo bomemaka ezali kilo makasi, ezali mokumba oyo elembisaka banyama.


Na tina ya Moabi : Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Mawa na engumba Nebo, pamba te ekobebisama ! Kiriatayimi ekoyokisama soni mpe bakobotola yango, ndako makasi ekoyokisama soni mpe ekobukana.


Kosambisama ekweyi na mokili ya etando ya likolo ya bangomba : na Oloni, na Yakatsi mpe na Mefati,


na Kiriatayimi, na Beti-Gamuli mpe na Beti-Meoni,


Mpo na yango, nakobebisa bingumba ya Moabi, oyo batonga makasi, na bandelo na yango, kobanda na bingumba oyo ya kitoko : Beti-Yeshimoti, Bala-Meoni, Kiriatayimi ;


Na tongo ya mokolo oyo elandaki, Balaki amemaki Balami, mpe bamataki na Bamoti-Bala ; mpe wuta kuna, bakokaki komona ndambo ya bana ya Isalaele.


« Bingumba ya Ataroti, ya Diboni, ya Yaezeri, ya Nimira, ya Eshiboni, ya Eleale, ya Sebami, ya Nebo mpe ya Beoni ;


Bakitani ya libota ya Ribeni batongaki bingumba oyo : Eshiboni, Eleale mpe Kiriatayimi


Okokufa na ngomba oyo okomata ; mpe kuna, okokende kokutana na bakoko na yo, oyo bakufa ndenge Aron, ndeko na yo ya mobali, akufaki na ngomba Ori mpe akutanaki na bakoko na ye,


Bosala boyokani te elongo na bikolo mosusu oyo etikali kati na bino, bobelela bakombo ya banzambe na yango te to mpe bolapa ndayi na bakombo na yango te. Bomeka kosalela yango te mpe bofukamela yango te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ