32 Tokokatisa na ngambo mosusu liboso ya Yawe kino na mokili ya Kanana mpo na bitumba. Kasi mabele oyo biso tosengeli kozwa lokola libula ekozala na ngambo oyo ya Yordani.
mpe tokotikala kozwa libula moko te elongo na bango na ngambo mosusu ya Yordani, pamba te libula oyo esengeli kopesamela biso ezali na ngambo ya este ya Yordani.
Boye, Moyize apesaki epai ya bakitani ya Gadi, ya Ribeni mpe ya ndambo ya libota ya Manase, mwana mobali ya Jozefi mokili ya Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori mpe mokili ya Ogi, mokonzi ya Bashani : mokili mobimba elongo na bingumba na yango mpe mboka mike oyo ezingelaki yango.
Tala maloba oyo Moyize ayebisaki bana nyonso ya Isalaele na ngambo ya este ya Yordani kati na esobe, kati na etando Araba oyo etalana na Sufi, kati ya Parani mpe Tofeli, kati ya Labani, Atseroti mpe Di-Zaabi.
Na tango wana, tobotolaki mokili yango. Napesaki epai ya bato ya libota ya Ribeni mpe ya libota ya Gadi mokili oyo ezalaki wuta na Aroeri, kati na lubwaku ya Arinoni kino ndambo ya etuka ya bangomba ya Galadi mpe bingumba na yango.
Tala bakonzi ya mokili, oyo bana ya Isalaele balongaki mpe oyo babotolaki mokili na bango na ngambo ya este ya Yordani, wuta na moluka ya Arinoni kino na ngomba Erimoni, elongo na ngambo nyonso ya este ya Araba :
Moyize, mosali na Yawe, elongo na bana ya Isalaele balongaki bango. Boye, Moyize, mowumbu na Yawe, apesaki mokili na bango lokola libula, epai ya bato ya libota ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase.