Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 32:3 - Mokanda na Bomoi

3 « Bingumba ya Ataroti, ya Diboni, ya Yaezeri, ya Nimira, ya Eshiboni, ya Eleale, ya Sebami, ya Nebo mpe ya Beoni ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 32:3
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okabaki mikili mpe bikolo na maboko na bango mpo ete bazwa bituka na bango kino na bandelo na yango. Babotolaki mokili ya Sikoni, mokonzi ya Eshiboni, mpe mokili ya Ogi, mokonzi ya Bashani.


Mayi ya Nimirimi ekawuki, bongo matiti mpe esili kokawuka, matiti ya mobesu eziki-ziki nyonso mpe matiti ya kitoko ezali lisusu te.


Na tina ya Moabi : Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Mawa na engumba Nebo, pamba te ekobebisama ! Kiriatayimi ekoyokisama soni mpe bakobotola yango, ndako makasi ekoyokisama soni mpe ekobukana.


Moabi ekozala lisusu na lokumu te, bato bakosalela yango likita kati na Eshiboni mpo na kokweyisa yango : ‹ Boya, tokweyisa ekolo oyo ! › Yo mpe, engumba Madimeni, okokanga monoko ; mopanga ekolanda yo.


Oh elanga ya vino ya Sibima, nazali kolela mpo na yo ndenge engumba Yaezeri ezali kolela ! Bitape na yo epanzani kino koleka mayi monene, ekomi kino na mayi monene Yaezeri. Mobebisi akweyeli mbuma ya bilanga na yo mpe mbuma ya vino na yo.


Makelele mpe koganga ezali komata wuta na Eshiboni kino na Eleale mpe Yakatsi, wuta na Tsoari kino koleka Oronayimi mpe Egilati-Shelishiya ; pamba te, ezala mayi ya Nimirimi esili kokawuka.


« Bato oyo bazali kokima bakozanga lisungi na elili ya engumba ya Eshiboni, pamba te moto moko ewuti na Eshiboni, moto ebimi na ndako ya mokonzi Sikoni, etumbi bandako batonga makasi ya Moabi mpe mito ya bato ya lolendo.


Mpo na yango, nakobebisa bingumba ya Moabi, oyo batonga makasi, na bandelo na yango, kobanda na bingumba oyo ya kitoko : Beti-Yeshimoti, Bala-Meoni, Kiriatayimi ;


Moto ebimaki wuta na Eshiboni, ndemo ya moto ebimaki wuta na engumba ya Sikoni, etumbaki Ari ya Moabi, bavandi ya bangomba ya Arinoni.


Kasi tolongi bango ; Eshiboni nyonso ebebisami kino na Diboni, topanzi yango nyonso kino na Nofaki, mpe kino na Medeba. »


Sima na yango, Moyize atindaki banongi na Yaezeri, bana ya Isalaele babotolaki bamboka ya mike-mike oyo ya zingazinga na yango mpe babenganaki bato ya Amori oyo bazalaki kovanda kuna.


Bakitani ya Ribeni mpe ya Gadi bazalaki na bibwele mingi penza. Bamonaki ete mokili ya Yaezeri mpe ya Galadi ezali malamu mingi mpo na kobokola bibwele.


Bongo bakitani ya Ribeni mpe ya Gadi bayaki koloba na Moyize, na Nganga-Nzambe Eleazari mpe na bakambi ya lisanga :


kino na Eshiboni mpe bingumba na yango nyonso oyo ezalaka na likolo ya ngomba, bakisa Diboni, Bamoti-Bala, Beti-Bala-Meoni,


Kiriatayimi, Sibima, Tsereti-Shaari na ngomba moke ya lubwaku,


Eshiboni mpe Yaezeri, elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba minei.


Mibu nkama misato, bana ya Isalaele bavandaki na Eshiboni, na Aroeri, na bamboka na yango ya mike mpe na bingumba nyonso oyo ezali pembeni ya Arinoni. Mpo na nini bobotolaki yango te na tango wana ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ