Mitango 32:23 - Mokanda na Bomoi23 Kasi soki bosali bongo te, bokosala nde lisumu na miso ya Yawe mpe boyeba ete, lisumu na bino ekolanda bino. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Yuda azongisaki : — Likambo nini tokoki koloba na nkolo na ngai ? Tokoloba lisusu nini ? Ndenge nini tokoki kotalisa ete toyebi likambo te ? Nzambe alakisi polele mbeba ya basali na yo. Tokomi sik’oyo bawumbu ya nkolo na ngai, biso nyonso elongo na ye oyo amonani ete azalaki na kopo kati na saki na ye.
Tika ete Yawe akweyisa likolo na ye moko mokumba ya makila oyo asopaki, pamba te abundisaki bato mibale mpe abomaki bango na mopanga ; tata na ngai, Davidi, ayebaki kutu te. Tala bakombo ya bato mibale yango : Abineri, mwana mobali ya Neri, mokonzi ya mampinga ya Isalaele ; mpe Amasa, mwana mobali ya Yeteri, mokonzi ya mampinga ya Yuda ; bazalaki bato malamu mpe ya sembo koleka ye.