Mitango 32:22 - Mokanda na Bomoi22 mpe mokili ekoma na se ya bokonzi ya Yawe, nde bokoki kozonga. Ezali na nzela wana nde bokolongwa na ngambo na miso ya Yawe mpe na miso ya bana ya Isalaele, mpe mokili oyo ekokoma libula na bino na miso ya Yawe. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
kino Yawe akopesa bango mpe bopemi ndenge asalaki mpo na bino, mpe kino tango bango mpe bakobotola mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bango. Na sima na yango nde bokoki kozonga mpe kovanda na mabele na bino moko, mabele oyo Moyize, mosali na Yawe, apesaki bino na ngambo ya este ya Yordani, na ngambo oyo moyi ebimelaka.