21 mpe soki bino nyonso oyo bosimbi bibundeli bokeyi na ngambo mosusu ya Yordani liboso ya Yawe, kino abengana banguna na Ye
Moyize alobaki na bango : — Soki bosali bongo, soki bolati bibundeli mpo na kokende na bitumba liboso ya Yawe,
mpe mokili ekoma na se ya bokonzi ya Yawe, nde bokoki kozonga. Ezali na nzela wana nde bokolongwa na ngambo na miso ya Yawe mpe na miso ya bana ya Isalaele, mpe mokili oyo ekokoma libula na bino na miso ya Yawe.
— Bobosana te Mobeko oyo Moyize, mowumbu ya Yawe, apesaki bino : « Yawe, Nzambe na bino, apesaki bino bopemi mpe mabele oyo. »