Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 32:14 - Mokanda na Bomoi

14 Bino mpe bozali kaka ndenge moko, libota ya bato ya masumu, bozali kaka kosala makambo ndenge moko na batata na bino mpe bozali kopelisa lisusu koleka kanda ya Yawe likolo ya Isalaele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 32:14
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Adamu akokisaki mibu nkama moko na tuku misato ya mbotama, abotaki mwana mobali na elilingi na ye mpe na lolenge na ye. Apesaki ye kombo « Seti. »


Boye, Yawe ayokaki solo kitoko mpe amilobelaki : « Nakolakela lisusu mabele mabe te likolo ya moto, pamba te wuta bomwana ya moto, motema ya moto elukaka kaka makambo mabe ; nakoboma lisusu te bikelamu nyonso ya bomoi ndenge nawuti kosala.


Balobaki na bango : « Bosengeli te komema bakangami oyo awa, soki te tokomema ngambo epai na Yawe. Boni, bolingi lisusu kobakisa masumu mpe ngambo na biso ! Ngambo na biso eleki penza monene, mpe kanda makasi ya Yawe ezali likolo ya Isalaele. »


Nganga-Nzambe Esidrasi atelemaki mpe alobaki na bango : — Bosalaki makambo ya mbindo awa bobalaki basi ya bapaya ; mpe, na nzela na yango, bobakiselaki Isalaele ngambo.


Tala, bakoko na bino basalaki mpe kaka boye ; mpe ezali mpo na yango nde Nzambe na biso atindelaki biso mpe engumba oyo pasi oyo nyonso. Mpe bino, lokola bozali kobebisa bosantu ya mokolo ya Saba, bozali nde komatisa kanda ya Nzambe likolo ya Isalaele !


Nani akoki kobimisa bopeto kati na mbindo ? Moko te !


bapengwaki mpe babukaki mibeko ya boyokani, ndenge batata na bango basalaki ; batengamaki lokola tolotolo oyo mbanzi na yango ekeyi na mopanzi ;


Mawa na yo, ekolo ya bato ya masumu, bato oyo batonda na mabe, libota oyo esalaka mabe mpe bana mabe ! Batiki Yawe, batioli Mosantu ya Isalaele mpe bapesi Ye mokongo.


Bozali koseka nani ? Bozali kofungolela nani monoko ? Bozali kotiela nani penza monoko ? Boni, bozali bana ya batomboki te, bozali libota ya lokuta te ?


Kasi bana mpe batombokelaki Ngai, balandaki bikateli na Ngai te, babatelaki te na bokebi mibeko na Ngai, oyo moto asengeli kotosa mpo ete abika na nzela na yango, mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba. Boye, namilobelaki ete nakotombokela bango makasi mpe nakopelisela bango kanda na Ngai kati na esobe.


Soki boboyi kolanda nzela na Ye, akotika lisusu bato oyo nyonso na esobe mpe bato oyo bakobebisama likolo na bino.


Boye, wana bosalaka bongo, botatolaka ete bondimi makambo oyo bakoko na bino basala ; pamba te bango, baboma basakoli, mpe bino, bozali kotonga bakunda na bango.


Wuta mokolo oyo nayeba bino, botikala te kotosa Yawe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ