13 Yawe atombokelaki Isalaele mpe asalaki ete bayengayenga na esobe mibu tuku minei kino tango molongo nyonso ya bato oyo basalaki mabe na miso na Ye basilaki kokufa.
Nzokande, Ngai, nabebisaki bato ya Amori liboso na bango, atako bazali milayi lokola banzete ya sedele mpe makasi lokola banzete ya sheni. Nabebisaki bambuma na yango na likolo, mpe misisa na yango na se.
Yawe, Nzambe na bino, apamboli bino na misala nyonso ya maboko na bino. Abateli bino na esobe oyo ya monene mibu tuku minei. Yawe, Nzambe na bino, azali elongo na bino mpe bozangi eloko moko te. › »
Bongo Yawe atombokelaki bana ya Isalaele mpe akabaki bango na maboko ya bato mabe oyo babotolaki bango biloko na makasi ; asundolaki bango epai ya banguna na bango, oyo bazalaki zingazinga na bango, mpe bazangaki makoki ya kotelemela bango.