Yawe, Nzambe na ye, akabaki ye na maboko ya mokonzi ya Siri. Bato ya Siri babetaki ye, bazwaki bato na ye ebele na bowumbu mpe bamemaki bango na Damasi. Nzambe akabaki ye lisusu na maboko ya mokonzi ya Isalaele, oyo abebisaki biloko na ye mpe alongaki ye.
Kati na molongo ya bato oyo babomaki, ezalaki na bakonzi ya Madiani oyo : Evi, Rekemi, Tsuri, Wuri mpe Reba. Babomaki mpe lisusu Balami, mwana mobali ya Beori na mopanga.
Kasi bokoki kozwa mpo na bino lokola bomengo ya bitumba : basi, bana, bibwele mpe biloko nyonso oyo ezali kati na engumba. Boye bokosalela bomengo ya bitumba oyo ekowuta epai ya banguna na bino oyo Yawe, Nzambe na bino, akokaba na maboko na bino.