Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 31:6 - Mokanda na Bomoi

6 Moyize atindaki bango na etumba bato nkoto moko ya libota moko na moko elongo na Nganga-Nzambe Pineasi, mwana mobali ya Eleazari oyo amemaki bisalelo ya Esika ya bule mpe bakelelo mpo na kopesa mbela.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 31:6
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Iri azongiselaki Davidi : — Sanduku, Isalaele mpe Yuda bazali kovanda na bandako ya kapo ; mpe Joabi, nkolo na ngai, elongo na bato na ye bazali kolala libanda kati na zamba. Ndenge nini ngai nakende na ndako na ngai mpo na kolia, komela mpe kolala na mwasi na ngai ? Solo, na kombo na yo mokonzi, nakoki kosala likambo ya boye te.


mwana mobali ya Abishuwa, mwana mobali ya Pineasi, mwana mobali ya Eleazari, mwana mobali ya Aron, mokonzi ya Banganga-Nzambe,


Bokosala yango kolanda lolenge ya Mongombo mpe bisalelo oyo nakolakisa yo.


Na lolendo na bango, bakendeki kaka na songe ya ngomba kati na etuka ya bangomba ; kasi Moyize alongwaki te na molako, ndenge moko mpe mpo na Sanduku ya Boyokani ya Yawe.


Boye, baponaki bato nkoto moko mpo na libota moko na moko kati na mabota ya Isalaele. Bongo, bato nkoto zomi na mibale balataki bibundeli mpo na kokende na etumba.


Tango bokobongama mpo na kokende na bitumba, Nganga-Nzambe asengeli koleka liboso ya mampinga mpe koloba na bango


Boye bana mosusu ya Isalaele batindaki na mokili ya Galadi, Pineasi, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Eleazari, epai ya bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase.


Saulo alobaki na Ayiya : « Boya na Sanduku ya Nzambe. » Pamba te na tango wana, Sanduku ya Nzambe ezalaki elongo na bato ya Isalaele.


Tango Davidi ayokaki sango ya mabe oyo Saulo azali kobongisa mpo na ye, alobaki na Nganga-Nzambe Abiatari ete amema efode oyo basalelaka mpo na kotuna Yawe makambo.


Moto oyo amemaki sango azongisaki : — Bato ya Isalaele bakimi liboso ya bato ya Filisitia, mpe ebele kati na bango bakufi ; ezala bana na yo mibale ya mibali, Ofini mpe Fineasi, bakufi. Bato ya Filisitia babotoli Sanduku ya Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ