Ndambo ya eteni ya bomengo ya bitumba oyo bato oyo bakendeki na bitumba bazwaki ezalaki : bameme mpe bantaba nkoto nkama misato na tuku misato na sambo na nkama mitano ;
Kasi bokoki kozwa mpo na bino lokola bomengo ya bitumba : basi, bana, bibwele mpe biloko nyonso oyo ezali kati na engumba. Boye bokosalela bomengo ya bitumba oyo ekowuta epai ya banguna na bino oyo Yawe, Nzambe na bino, akokaba na maboko na bino.